Lingala
Mokokoli ya losambo
Na kati ya ndako oyo babengi "Rijksmuseum" na Amsterdam, mokolo moko, moto moko atalisaki makanisi na ngai na eloko moko, eloko yango ezalaki ya ba mibu miwuta koleka kala (tango ya ba koko na biso). Eloko yango ezalaki mokokoli ya mbila. Mokokoli yango ezalaki ya kokabuana na biteni mibale, na lolenge tokokaki kotanga mpe komona bililingi ya mbotama mpe nkufa na Yesu. Biteni mibale ya mokokoli yango ezalaki kokangema mpe kofunguame lokola sanduku, mpo yango esalemaki na mpalata ya "cuivre", mpe yango ebombamaki na kati na libenga ya mposo na nyama. Losambo yango ezalaki na kati na mokokoli, ezalaki na ntina ete mpo na bomemi yango na mobembo.
Nasima ya bambula koleka, nazuaki likanisi ya kopesa mokokoli yango bomoyi ya sika. Natango oyo mokokoli esalemi, mosaleli nayango akoki mpe kokoma nakati na yango makomi, bilili, ntango, to mpe bilembo oyo ezali na ye ntina. Mokokoli yango ezali na bosembo ya kobatela yango mikolo na mikolo. Tango losambo na yo endimami, to mpe lisusu, tango mokokoli na yo ebandi konuna, okoki kosokola to konika yango na linyuka mpo na bopesi yango bongengi, mpe nasima kokoma yango lisusu makomi ya sika.
Still to be checked
This text is still being checked by someone who reads the language.